Psalms 41

Libondeli ya moto ya maladi

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Mapamboli na moto oyo akanisaka babola ;
Yawe akokangola ye na tango ya minyoko.

2 Yawe akengelaka ye mpe abatelaka bomoi na ye ;
akopambola ye kati na mokili ;
mpe akokaba ye te na posa ya bayini na ye.

3 Yawe akosunga ye na mbeto na ye ya maladi ;
mpe akobikisa ye wuta na mbeto na ye ya maladi.

4 Nalobaki : “Yawe yokela ngai mawa !
Bikisa ngai, pamba te nasalaki masumu epai na yo.”

5 Banguna na ngai bazali koloba na mayele ya mabe mpo na ngai :
“Akokufa mokolo nini mpe
Kombo na ye ekolimwa mokolo nini ?”

6 Tango nyonso oyo moto aye kotala ngai,
alobaka lokuta ;
motema na ye etondaka kaka na kotonga ;
bongo abimaka libanda mpe
alobelaka yango.

7 Banguna na ngai nyonso, bazali koloba na se-se
elongo mpo na ngai ;
bazali kokanisa mabe mpo na ngai ;
bazali koloba :

8 Pasi moko ya somo penza ekangi ye ;
akoki kotelema lisusu te na bisika ye alali.

9 Ata moninga na ngai penza ya motema,
oyo nazalaki kotiela motema,
oyo azalaki kokabola lipa na ngai, abalukeli ngai.

10 Kasi yo Yawe, yokela ngai mawa ;
telemisa ngai,
mpo nazongisela bango mabe na bango.

11 Nayebi ete osepelaka na ngai
mpo monguna na ngai alonga ngai te.

12 Na kati na boyengebene na ngai osimbaka ngai
mpe otelemisa ngai liboso ya miso na yo mpo na libela.

13 Masanzoli ezala epai na Yawe,
Nzambe ya Isayele mpo na libela na libela.
Amen mpe amen.
Copyright information for LinMNB